Skip to content

nsoni ezali eteni ya bondimi

Kowuta na maloba ya Abdullah bin Omar, Nzambe asepela na bango mibale, alobaki:

Mosakoli, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, ayokaki mobali moko azali kopesa toli na ndeko na ye na ntina ya nsoni, mpe alobaki: “nsoni ezali eteni ya bondimi”.

سَمِعَ النَّبِيُّ صَلَّى اللهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ رَجُلًا يَعِظُ أَخَاهُ فِي الْحَيَاءِ، فَقَالَ: «الْحَيَاءُ مِنَ الْإِيمَانِ».

Elobami na Al-Bukhari na Muslim
Yasolo
Ndimbola

Ntoma (S.a.w) ayokaki mobali moko azali kopesa toli na ndeko na ye atika nsoni eleki ndelo! Alimbolaki ye ete nsoni ezali eteni ya kondima, mpe yango ememaka kaka bolamu. Nsoni ezali ezaleli oyo ememaka na kosala oyo ezali kitoko mpe kotika oyo ezali mabe.

Ndimbola ya maloba

...:

Moko ya matomba ya hadîth

Oyo ezali kopekisa yo osala malamu babengaka yango nsoni te, kasi babengaka yango timidité, kozanga makoki, na makasi, mpe eza botau.

Nsoni epai ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso esalemaka na kosaláká oyo esengami mpe kosundolaka oyo epekisami.

Kozala na nsoni epai ya bato ezali kotosa bango, kokitanisa bango na bandako na bango, mpe kokima makambo oyo mbala mingi bato esalaka bango mabe.

Mozongeli

Sahih al-Bukhari (1/ 14) (24).

Sahih Muslim (1/ 63) (36).

Mbakisa (8)

توضيح الأحكام من بلوغ المرام.

للبسام (7/ 489).

منحة العلام في شرح بلوغ المرام.

لعبد الله الفوزان (10/ 330).

فتح ذي الجلال والإكرام.

لابن عثيمين (6/ 427).

سبل السلام بشرح بلوغ المرام.

للصنعاني (2/ 689).