“Soki moto alingi ndeko na ye, ayebisa ye ete alingaka ye”.
Na bokonzi ya Al-Miqdam bin Maadi Karb, Nzambe asepela na ye, na bokonzi ya Ntoma, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, oyo alobaki:
“Soki moto alingi ndeko na ye, ayebisa ye ete alingaka ye”.
«إِذَا أَحَبَّ الرَّجُلُ أَخَاهُ فَلْيُخْبِرْهُ أَنَّهُ يُحِبُّهُ».
Ntoma, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alimboli moko ya bantina oyo elendisaka boyokani kati na bandimi mpe epalanganisaka bolingo kati na bango, oyo ezali ete soki moto alingi ndeko na ye, ayebisa ye ete alingaka ye.
Bolamu ya bolingo ya peto mpo na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, kasi mpo na matomba ya mokili te.
Ezali malamu koyebisa molingami ya Nzambe bolingo na ye, mpo ete bolingo na bomesano ebakisama.
Kopalanganisa bolingo kati na bandimi elendisaka bondeko ya bondimi mpe ebatelaka lisanga na bopanzani mpe bokabwani.
Sunan ya Abu Dawud (7/ 444) (5124).
Sunan al-Tirmidhi (4/ 199) (2392).
Sunan Al Kubrâ ya An-Nassâ'î (9/ 87) (9963).
Musnad Ahmad (28/ 408) (17171).
Mbakisa (12)
بهجة الناظرين شرح رياض الصالحين.
لسليم الهلالي (1/ 450).
تطريز رياض الصالحين.
لفيصل المبارك (ص258).
رياض الصالحين للنووي.
(ص138) (383).
سلسلة الأحاديث الصحيحة وشيء من فقهها وفوائدها.
للألباني (1/ 777).
فيض القدير شرح الجامع الصغير.
للمناوي (1/ 247).
كنوز رياض الصالحين.
لمجموعة من الباحثين (6/ 279).