“Moto oyo azali kotanga Coran na mongongo ya polele azali lokola oyo azali kobimisa swadaka polele, mpe oyo azali kotanga Coran na mongongo ya kobombama azali lokola moto oyo azali kobimisa swadaka na kobombama”.
Kowuta na maloba ya Uqba bin Aamir Al-Juhani, Nzambe asepela na ye, alobi: Ntoma ya Nzambe (s.a.w) alobaki:
“Moto oyo azali kotanga Coran na mongongo ya polele azali lokola oyo azali kobimisa swadaka polele, mpe oyo azali kotanga Coran na mongongo ya kobombama azali lokola moto oyo azali kobimisa swadaka na kobombama”.
«الجاهِرُ بالقرآن كالجاهِرِ بالصَّدَقَةِ، والمُسِرُّ بالقرآن كالمُسِرِّ بالصَّدَقَة».
Ntoma, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alimbolaki ete oyo azali kotanga Coran na pôlele, azali lokola oyo abimisaka swadaka na polele, mpe oyo akotangaka Coran na kobombama, azali lokola oyo akopesaka swadaka na kobombama.
...:
Kobomba botangi ya Coran ezali malamu koleka, ndenge moko kobomba swadaka ezali malamu, mpo na bosembo oyo yango esangisi mpe mosika na bokosi mpe lolendo, longola se soki mposa na bosepeli esengi yango ezala ya bato banso, lokola koteya na kotangisa Coran.
Sunan ya Abu Dawud (2/ 494) (1333).
Sunan al-Tirmidhi (5/ 40) (2919).
Sunan an-Nasa'i (5/ 80) (2561).
Mbakisa (4)
الكاشف عن حقائق السُّنن (5/1688).
شرح أبي داود للعيني (5/238).
تحفة الأحوذي (8/ 191).
التنوير في شرح الجامع الصغير (5/286).