Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

6 of 108 cards

Clear filters
“Moto oyo azali kotanga Coran na mongongo ya polele azali lokola oyo azali kobimisa swadaka polele, mpe oyo azali kotanga Coran na mongongo ya kobombama azali lokola moto oyo azali kobimisa swadaka na kobombama”.
Yasolo Elobami na Abu Dawud, na Al-Tirmidhi mpe Al-Nasa'i.
« Boyebi nini nde ezali matongi ? - Bayanolaki ye ete: Allah na Motindami na Ye nde bayebi malamu koleka! - Alobaki: -matongi - ezali “ koloba na sima ya ndeko nayo, na makambo oyo ayinaka ete bazala koloba yango. », balobaki: omoni ndenge nini soki ezwami okati ya ndeko nangai maye nazali koloba ? Na Ntoma ayanolaki na koloba ete: "Soki ezali epai maye ozali koloba, yeba ete osili kotonga ye, kasi soki azali te lolenge wana, yeba ete osili bongo kokoselaye likambu." »
Yasolo Elobami na Muslim
“Epesameli nzela te moto asundola ndeko na ye mikolo koleka misato, Bakutani, na oyo alakisi ye, oyo alakisi, ye, na oyo eleki malamu kati na bango mibale ezali oyo akobanda na Salamu”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
Tango Profeta (s.a.w) azalaki kokende kolala butu nionso, azalaki kosimba maboko na ye esika moko. Na sima afulaki na yango na atanga kati na na yango : {Qul Huwa Al-Laahu 'Aĥadun}, mpe {Qul 'A`ūudhu Birabbi-l-Falaq}, mpe {Qul 'A`ūudhu Birabbi N-Nāsi}, Na nsima, apangusi nzoto na ye mobimba ndenge akoki na yango, kobanda na yango na motó, na elongi, mpe na eteni ya liboso ya nzoto na ye Asalaka boye mbala misato.
Yasolo Elobami na Al bukhari
“Droit ya Musulman likoló ya Musulman mosusu ezali mitano: Kozongisa mbote, kotala bato ya maladi, kokende na matanga, koyanola na libyangi, mpe kosepela na koswa.”
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Soki moto alingi ndeko na ye, ayebisa ye ete alingaka ye”.
Yasolo Elobami na Abu Dawud, na Al-Tirmidhi, na Al-Nasa'i na Al-Kubra mpe na Ahmed.