وَٱلسَّمَآءِ وَٱلطَّارِقِ
(Na lapi) na mapata mpe na monzoto y a butu!
الطَّارق is chapter 86 of the Quran and has 17 verses. This page presents it in full in the Uthmani script, with a verse-by-verse translation of its meaning.
وَٱلسَّمَآءِ وَٱلطَّارِقِ
(Na lapi) na mapata mpe na monzoto y a butu!
وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا ٱلطَّارِقُ
Nani akoyebisa yo nini monzoto ya butu,
ٱلنَّجۡمُ ٱلثَّاقِبُ
Ezali monzoto ya bongengi makasi.
إِن كُلُّ نَفۡسٖ لَّمَّا عَلَيۡهَا حَافِظٞ
Ezali na molimo moko te sé azala na mokengeli likolo naye.
فَلۡيَنظُرِ ٱلۡإِنسَٰنُ مِمَّ خُلِقَ
Esengeli na moto ayeba na nini yango akelamaki,
خُلِقَ مِن مَّآءٖ دَافِقٖ
Akelamaki kowuta na litanga ya mayi.
يَخۡرُجُ مِنۢ بَيۡنِ ٱلصُّلۡبِ وَٱلتَّرَآئِبِ
Ewuti o’kati na mokongo mpe mipanzi.
إِنَّهُۥ عَلَىٰ رَجۡعِهِۦ لَقَادِرٞ
Ya soló Allah azali na nguya ya bozongisi ye na bomoyi,
يَوۡمَ تُبۡلَى ٱلسَّرَآئِرُ
Mokolo moye mitema mikobimisa maye ebombaki,
فَمَا لَهُۥ مِن قُوَّةٖ وَلَا نَاصِرٖ
Akozala na nguya te mpe akozala na mosalisi te.
وَٱلسَّمَآءِ ذَاتِ ٱلرَّجۡعِ
(Na lapi) na mapata maye mazali kokitisa mbula,
وَٱلۡأَرۡضِ ذَاتِ ٱلصَّدۡعِ
Мре (na lapi) na mabele maye mazali kofungwama,
إِنَّهُۥ لَقَوۡلٞ فَصۡلٞ
Ya soló, oyo (kurani) ezali liloba ya bosembo.
وَمَا هُوَ بِٱلۡهَزۡلِ
Kasi ezali eloko ya pamba te.
إِنَّهُمۡ يَكِيدُونَ كَيۡدٗا
Ya soló, bango bazali koyangela mwango,