Skip to content
Surah List /

الفُرقَان

الفُرقَان is chapter 25 of the Quran and has 77 verses. This page presents it in full in the Uthmani script, with a verse-by-verse translation of its meaning.

77 Ayahs Surah No. 25
Go to ayah
Lingala · Zakaria
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

تَبَارَكَ ٱلَّذِي نَزَّلَ ٱلۡفُرۡقَانَ عَلَىٰ عَبۡدِهِۦ لِيَكُونَ لِلۡعَٰلَمِينَ نَذِيرًا

Nkembo naye oyo akitisa bososoli epai na mowumbu naye, mpo azala mokebisi тропа mokili mobimba.

Explanation & meanings · 1
  1. Mokili mobimba: Elakisi: Bilima na bato.

ٱلَّذِي لَهُۥ مُلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَلَمۡ يَتَّخِذۡ وَلَدٗا وَلَمۡ يَكُن لَّهُۥ شَرِيكٞ فِي ٱلۡمُلۡكِ وَخَلَقَ كُلَّ شَيۡءٖ فَقَدَّرَهُۥ تَقۡدِيرٗا

Oyo bokonzi ya likolo mpe ya nsé ezali yaye, mpe amipesaka mwana te, mpe akoki kozala na mosangisi te okati ya bokonzi, mpe akela biloko binso, mpe apesa yango bokoki bwa semba.

وَٱتَّخَذُواْ مِن دُونِهِۦٓ ءَالِهَةٗ لَّا يَخۡلُقُونَ شَيۡـٔٗا وَهُمۡ يُخۡلَقُونَ وَلَا يَمۡلِكُونَ لِأَنفُسِهِمۡ ضَرّٗا وَلَا نَفۡعٗا وَلَا يَمۡلِكُونَ مَوۡتٗا وَلَا حَيَوٰةٗ وَلَا نُشُورٗا

Mpe batiki ye bazui banzambe misusu baye bakelaka eloko te, po bango moko bakelama, mpe bazali na makoki ya komisala bolamu te mpe komisala mabe te, mpe basimbi liwa na maboko na bango te, mpe bomoyi te, mpe bazali na makoki ya kosekwisa te (o sima ya liwa).

وَقَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّآ إِفۡكٌ ٱفۡتَرَىٰهُ وَأَعَانَهُۥ عَلَيۡهِ قَوۡمٌ ءَاخَرُونَۖ فَقَدۡ جَآءُو ظُلۡمٗا وَزُورٗا

Mpe baye bapengwa bazali koloba ete: Oyo ezali sé lokuta monene oyo ayei na yango, (ye Muhammad) mpe bato basusu basalisi ye na yango, ya solo bango basili kobuka lokuta mpe na libubi.

وَقَالُوٓاْ أَسَٰطِيرُ ٱلۡأَوَّلِينَ ٱكۡتَتَبَهَا فَهِيَ تُمۡلَىٰ عَلَيۡهِ بُكۡرَةٗ وَأَصِيلٗا

Mpe balobi ezali nde masapo ya kala oyo asengaki bakomela ye bazalaki kotangela ye yango tongo na pokwa.