Skip to content
Surah List /

الحِجر

الحِجر is chapter 15 of the Quran and has 99 verses. This page presents it in full in the Uthmani script, with a verse-by-verse translation of its meaning.

99 Ayahs Surah No. 15
Go to ayah
Lingala · Zakaria
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

الٓرۚ تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱلۡكِتَٰبِ وَقُرۡءَانٖ مُّبِينٖ

Alif, lâm, râ. oyo wana ezali nde mikapo mia buku mpe kurani ya polele.

Explanation & meanings · 1
  1. Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 1.

رُّبَمَا يَوَدُّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَوۡ كَانُواْ مُسۡلِمِينَ

(O mokolo mwa suka) bapengwi bakolobaka ete: Soki tozalaka ata ba mizilima.

ذَرۡهُمۡ يَأۡكُلُواْ وَيَتَمَتَّعُواْ وَيُلۡهِهِمُ ٱلۡأَمَلُۖ فَسَوۡفَ يَعۡلَمُونَ

Tika bango balia, basepela moke (na ngonga) mpe elikya ya mokili ebosanisi bango mokolo ya bosôló, kasi kala mingi te bakoyeba.

وَمَآ أَهۡلَكۡنَا مِن قَرۡيَةٍ إِلَّا وَلَهَا كِتَابٞ مَّعۡلُومٞ

Kasi tobomaka mboka moko te sé ezala na mokano moyebani mosila kokomama.

مَّا تَسۡبِقُ مِنۡ أُمَّةٍ أَجَلَهَا وَمَا يَسۡتَـٔۡخِرُونَ

Umma moko te ekoki kopuşa liboso to kozongisa mokano na bango sima.

Explanation & meanings · 1
  1. Umma: Lisanga ya bato, bótala Al-Baqarah: 128.