Skip to content
Surah List /

يُوسُف

يُوسُف is chapter 12 of the Quran and has 111 verses. This page presents it in full in the Uthmani script, with a verse-by-verse translation of its meaning.

111 Ayahs Surah No. 12
Go to ayah
Lingala · Zakaria
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

الٓرۚ تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱلۡكِتَٰبِ ٱلۡمُبِينِ

Alif, lâm, râ. Wana ezali mikapo mia buku ya polele.

Explanation & meanings · 1
  1. Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 1.

إِنَّآ أَنزَلۡنَٰهُ قُرۡءَٰنًا عَرَبِيّٗا لَّعَلَّكُمۡ تَعۡقِلُونَ

Ya soló, tokitisaki yango kurani na lokota ya arabo mpo ete bososola.

نَحۡنُ نَقُصُّ عَلَيۡكَ أَحۡسَنَ ٱلۡقَصَصِ بِمَآ أَوۡحَيۡنَآ إِلَيۡكَ هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانَ وَإِن كُنتَ مِن قَبۡلِهِۦ لَمِنَ ٱلۡغَٰفِلِينَ

Tozali koyebisa yo masolo ma kitoko maye tokitisaki kurani eye epai nayo, mpe ata soki ozalaka liboso na yango o kati ya baye bazangaki bokebi.

إِذۡ قَالَ يُوسُفُ لِأَبِيهِ يَٰٓأَبَتِ إِنِّي رَأَيۡتُ أَحَدَ عَشَرَ كَوۡكَبٗا وَٱلشَّمۡسَ وَٱلۡقَمَرَ رَأَيۡتُهُمۡ لِي سَٰجِدِينَ

Tango Yûsuf alobaki na tata waye: Oh tata na ngai! Ya solo, ngai namoni na ndoto minzoto zomi na moko, mpe mwese na sanza, mizali kogumbamela ngai.

قَالَ يَٰبُنَيَّ لَا تَقۡصُصۡ رُءۡيَاكَ عَلَىٰٓ إِخۡوَتِكَ فَيَكِيدُواْ لَكَ كَيۡدًاۖ إِنَّ ٱلشَّيۡطَٰنَ لِلۡإِنسَٰنِ عَدُوّٞ مُّبِينٞ

Alobaki: Oh mwana wa ngai! Kobetela bandeko bayo ndoto nayo eye te, mpo bakoki kosalela yo likita ya mabe. Ya solo satana azali monguna ya polele тропа moto.