Skip to content
Surah List /

النِّسَاء

النِّسَاء is chapter 4 of the Quran and has 176 verses. This page presents it in full in the Uthmani script, with a verse-by-verse translation of its meaning.

176 Ayahs Surah No. 4
Go to ayah
Lingala · Zakaria
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ ٱتَّقُواْ رَبَّكُمُ ٱلَّذِي خَلَقَكُم مِّن نَّفۡسٖ وَٰحِدَةٖ وَخَلَقَ مِنۡهَا زَوۡجَهَا وَبَثَّ مِنۡهُمَا رِجَالٗا كَثِيرٗا وَنِسَآءٗۚ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ ٱلَّذِي تَسَآءَلُونَ بِهِۦ وَٱلۡأَرۡحَامَۚ إِنَّ ٱللَّهَ كَانَ عَلَيۡكُمۡ رَقِيبٗا

Eh Bino bato! Bobanga Nkolo na bino oyo akeli bino na molimo moko, mpe akeli na molimo wana mwasi Naye. Mpe abimisi o’kati na bango mibali ebele mpe basi, mpe bobanga Allah oyo bozali komitunana ba mposa ya bino. Mpe bobanga kokata bondeko ya makila. Ya sôló Allah azali mokengeli wa bino.

وَءَاتُواْ ٱلۡيَتَٰمَىٰٓ أَمۡوَٰلَهُمۡۖ وَلَا تَتَبَدَّلُواْ ٱلۡخَبِيثَ بِٱلطَّيِّبِۖ وَلَا تَأۡكُلُوٓاْ أَمۡوَٰلَهُمۡ إِلَىٰٓ أَمۡوَٰلِكُمۡۚ إِنَّهُۥ كَانَ حُوبٗا كَبِيرٗا

Mpe bopesa bana bitike misolo mwa bango, mpe bobongola mabe na bolamu te, mpe bolia misolo mia bango te na misolo mia bino. Ya sôló, maye wana mazali masumu minene.

وَإِنۡ خِفۡتُمۡ أَلَّا تُقۡسِطُواْ فِي ٱلۡيَتَٰمَىٰ فَٱنكِحُواْ مَا طَابَ لَكُم مِّنَ ٱلنِّسَآءِ مَثۡنَىٰ وَثُلَٰثَ وَرُبَٰعَۖ فَإِنۡ خِفۡتُمۡ أَلَّا تَعۡدِلُواْ فَوَٰحِدَةً أَوۡ مَا مَلَكَتۡ أَيۡمَٰنُكُمۡۚ ذَٰلِكَ أَدۡنَىٰٓ أَلَّا تَعُولُواْ

Mpe soki bobangi ete bokozala na bosembo te kati kati ya bana bitike, esengeli na bino kobala basi baye bosepeli na bango, mibale, to mpe misato to mpe minei, kasi soki bobangi ete bokokoka te mpe bokozala semba kati na bango te, ezali malamu kozala na moko, to mpe bawumbu na bino baye bazali na maboko mabino, wana nde ezali malamu mpo ete bobunga te na kokweya na masumu.

وَءَاتُواْ ٱلنِّسَآءَ صَدُقَٰتِهِنَّ نِحۡلَةٗۚ فَإِن طِبۡنَ لَكُمۡ عَن شَيۡءٖ مِّنۡهُ نَفۡسٗا فَكُلُوهُ هَنِيٓـٔٗا مَّرِيٓـٔٗا

Mpe bopesa basi misolo mia bango ya libala na motema ya malamu, ezali lotomo mpona bango, kasi soki bango moko batikeli bino eloko na kati na yango, bolia yango na esengo.

وَلَا تُؤۡتُواْ ٱلسُّفَهَآءَ أَمۡوَٰلَكُمُ ٱلَّتِي جَعَلَ ٱللَّهُ لَكُمۡ قِيَٰمٗا وَٱرۡزُقُوهُمۡ فِيهَا وَٱكۡسُوهُمۡ وَقُولُواْ لَهُمۡ قَوۡلٗا مَّعۡرُوفٗا

Mpe bopesa bazoba misolo mia bino te, oyo Allah atia yango mpona kotelemisa bomoyi bwa bino, mpe boleisa bango o kati ya maye wana, mpe bolatisa bango mpe boloba na bango maloba malamu.