Skip to content
Surah List /

النَّمل

النَّمل is chapter 27 of the Quran and has 93 verses. This page presents it in full in the Uthmani script, with a verse-by-verse translation of its meaning.

93 Ayahs Surah No. 27
Go to ayah
Lingala · Zakaria
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

طسٓۚ تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱلۡقُرۡءَانِ وَكِتَابٖ مُّبِينٍ

Twâ sîn, oyo ezali mikapo mia kurani, mpe buku wa polele.

Explanation & meanings · 1
  1. Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.

هُدٗى وَبُشۡرَىٰ لِلۡمُؤۡمِنِينَ

(Ezali) na bokambami mpe kopesa sango elamu epai ya bandimi.

ٱلَّذِينَ يُقِيمُونَ ٱلصَّلَوٰةَ وَيُؤۡتُونَ ٱلزَّكَوٰةَ وَهُم بِٱلۡأٓخِرَةِ هُمۡ يُوقِنُونَ

Baye bazali kotelemisa losambo mpe kobimisa zakat, mpe bazali na tembe te na mokolo mwa suka.

Explanation & meanings · 1
  1. Zakat: Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 1.

إِنَّ ٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِٱلۡأٓخِرَةِ زَيَّنَّا لَهُمۡ أَعۡمَٰلَهُمۡ فَهُمۡ يَعۡمَهُونَ

Ya soló, baye bazali kondima na mokolo ya suka te, totieli misala na bango ya mabe bonzenga, mpe batikali na yango na koyimayima mpe kozanga bososoli.

أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ لَهُمۡ سُوٓءُ ٱلۡعَذَابِ وَهُمۡ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ هُمُ ٱلۡأَخۡسَرُونَ

Bango wana nde bakozala na etumbu ya mabe, mpe o mokolo ya suka bakozala bazangi mpenza.