Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

5 of 108 cards

Clear filters
« Ee Allah! Moto nyonso oyo azali mokambi ya likambo moko na kati ya Umma [Lingomba] na ngai, mpe akomisi yango pasi likolo na bango, [Ee Allah!] Komisa pe makambo pasi likolo naye. Mpe na oyo azali na mokumba ya likambo moko na kati na Umma na ngai, naye azali kokomisa yango pète epai na bango, [Allah] Komisa mpe makambo pète pona ye. »
Yasolo Elobami na Muslim
“Soki Moumbu ya nzambe abeli to asali mobembo, ba komelaka ye bolamu lokola nde azali na nzoto kolongono mpe Ndenge azalaka mofandi Yasolo.”
Yasolo Elobami na Al bukhari
“Ezali na mosaleli moko te oyo Nzambe abatelaki ye liboso ya bato oyo azali kokengela, mpe akufaki mokolo oyo akosaki bato na ye, kasi Nzambe akopekisa ye Paladiso”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
"Bókomisela ngai ata verse moko, na bóyebisa yango na bokonzi ya Bana ya Israel, ezali mabe te, Mpe moto nyonso oyo akokosa mpo na ngai na nko, akozwa kiti na ye na Moto.”
Yasolo Elobami na Al bukhari
Tango tofandaki na Prophète, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, na mosquée, mobali moko akoti na kamela na mosquée nsima akangaki yango, na nsima alobaki na bango, : Nani nakati na bino azali Muhammad? Mosakoli, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, azalaki kofanda na kati ya bato, yango wana tolobaki: Ezalaki mobali oyo ya pembe afandi awa, Mobali wana alobaki na ye : O Ibn Abdul Muttalib? Mosakoli, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobaki na ye: “Nayanoli yo.”Mobali wana alobaki na Prophète (s.a.w) : Nazali kotuna yo, motuna ya makasi, yango wana kosilikela ngai te na motema na yo. Alobaki: “Senga nyonso oyo olingi Alobi: Nazali kotuna yo na nzela ya Nkolo na yo mpe na nzela ya Nkolo ya baye bazalaki liboso na yo, Nzambe atindaki yo epai ya bato nyonso? Alobaki boye:“ Allâhuma nam, yasolo” Alobi: Nalapeli yo na kombo ya Nzambe. biso tosambelaka losambo mitano na mukolo nzambe nde atindakiyo nayango? Alobaki: "Allâhuma nam, yasolo,". Alobi: Nalapi yo na kombo ya Nzambe. yasolo nzambe nde atindakiyo biso tokangaka sanza oyo na mbula nyonso? Alobaki: "Allâhuma nam, yasolo". Alobi: Nalapeli yo na kombo ya Nzambe, yasolo nzambe nde atindakiyo ozua mosolo (swadaka) na bato ya mbongo kati na biso opesa bazangi? olobaki: " Allâhuma nam, Yasolo". Mobali wana alobaki: Nandimi oyo oyaki na yango, pe nazali motindami ya bato na ngai sima na ngai, mpe nazali Dhwimaam bin Thalabah, ndeko ya Banu Saad bin Bakr.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim