Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

99 of 108 cards

Clear filters
« Ya sôlo Ar-Ruqâ, ba talisma mpe ba Tiwala ezali bosangisi Allah [Chirk]. ».
Yasolo Elobami na Abu Dawud, Ibn Majah mpe Ahmad.
Ba compagnons mosusu ya Prophète, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, bayaki pe batuni ye: Tomonaka kati na biso moko makambo oyo moko na moko kati na biso amonaka mpasi mingi mpo na koloba. Alobaki boye: “bokutaka yengo?” Balobaki: oui Alobaki: “Wana ezali bondimi ya polele”.
Yasolo Elobami na Muslim
“Moto oyo azali kotanga Coran na mongongo ya polele azali lokola oyo azali kobimisa swadaka polele, mpe oyo azali kotanga Coran na mongongo ya kobombama azali lokola moto oyo azali kobimisa swadaka na kobombama”.
Yasolo Elobami na Abu Dawud, na Al-Tirmidhi mpe Al-Nasa'i.
“Nakozala na Mai ya haudu kino nakomona nani kati na bino akozongela ngai, mpe bato bakokangama na ndima ngai, Bongo nakoloba: Ee Nkolo, mpo na ngai mpe mpo na ekolo na ngai, mpe ekolobama ete: Omonaki oyo basalaki nsima na yo? Na Nzambe, bazali kokoba kozonga nsima na ba etumbu na bango”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
" Na Oyo akokila Ngizi ya Ramadan na bondimi mpe na kolikya lifuti - na yango epayi ya Allah-, masumu naye oyo eleka ekolimbisama”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Satana akoyelaka moko na bino mpe alobi ete: Nani akelaki boye mpe boye? Nani akelaki boye na boye? Kino akoloba: Nani akela Nkolo na yo? Na yango, ntango akokóma na esika yango, tiká aluka ekimelo epai ya Nzambe mpe azala na motema yako silisa ye”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Maloba mibale oyo ezali pepele na lolemo, kilo na balance, mpe elingami epai ya nzambe oyo aleki Ngolu koloba : Subhâna l-lâahi-l-'azîm. Subhâna l-lâahi wa bi-hamdihi”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Bótalela ngai te ndenge baklisto batalelaki mwana ya Maria; Mpo nazali kaka mosaleli ya nzambe, yango wana balobaki: Mosaleli ya Nzambe mpe Motindami na Ye.”
Yasolo Elobami na Al bukhari