Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

38 of 108 cards

Clear filters
« Ya solo, ezali na kati ya bato; baoyo bazali kosalela bozwi ya Allah na ndenge ya mabe, kasi bakozala okati ya Lifelo na Mokolo ya suka. »
Yasolo Elobami na Al bukhari
Ntoma ya Nzambe, tika ete Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, batunaki ye na ntina ya nini mingi ememaka bato na Paradis, mpe alobaki: “Kobanga Nzambe mpe bizaleli malamu,” mpe batunaki ye ntina ya nini mingi ememaka bato na lifelo alobaki ete: “Lolemo na binama”.
Malamu mpe ya solo Elobami na Al-Tirmidhi na Ibn Majah na Ahmed.
“Bókómisa bandako na bino malita te, mpe bókómisa lilita na ngai fêti te, kasi bosambela mpo na ngai. Mabondeli na bino ekokóma epai na ngai na bisika nyonso oyo bozali.”
malamu Elobami na Abu Dawud
“Kosenga Dua ezali losambo,” na nsima atángaki : “{Mpe Nkolo na bino alobaki, “Bóbelela Ngai, nakoyanola bino, ya solo, baoyo bazali kotyola mingi mpo na kosambela Ngai bakokota na Lifelo.” [Ghafir: 60]”.
Yasolo Elobami na Abu Dawud, Al-Tirmidhi, Ibn Majah na Ahmed.
“Eloko moko te ezali na lokumu epai na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso koleka kobondela Dua”.
malamu Elobami na Al-Tirmidhi na Ibn Majah na Ahmed.
“Droit ya Musulman likoló ya Musulman mosusu ezali mitano: Kozongisa mbote, kotala bato ya maladi, kokende na matanga, koyanola na libyangi, mpe kosepela na koswa.”
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Ezalaki na moto moko oyo azalaka kosenga bato nyongo, mpe azalaka koloba na garçon na ye : Soki oyeli moto ya nyongo, limbisa ye mbala mosusu, Nzambe akolimbisa biso. Yango wana akutanaki na Nzambe mpe alimbisaki ye.”
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
Moto moko ayaki epayi ya Prophète, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, pe alobi: Ee Ntoma ya Nzambe, natikaki eloko moko te nyonso nasalaki, (ya masumu liboso ya Islam), alobaki naye: Ozali te, osili kotatola ete nzambe mosusu azali te kaka Allah mpe Muhammad azali Ntoma ya Nzambe?” mbala misato. Alobaki boye: oui, alobaki naye: “Oyo etongami likoló na yango” (olimbisami yakala).
Yasolo Elobami na Abu Ya'la, Al-Tabarani mpe Al-Diya Al-Maqdisi.