Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

34 of 108 cards

Clear filters
“Kosenga Dua ezali losambo,” na nsima atángaki : “{Mpe Nkolo na bino alobaki, “Bóbelela Ngai, nakoyanola bino, ya solo, baoyo bazali kotyola mingi mpo na kosambela Ngai bakokota na Lifelo.” [Ghafir: 60]”.
Yasolo Elobami na Abu Dawud, Al-Tirmidhi, Ibn Majah na Ahmed.
“Droit ya Musulman likoló ya Musulman mosusu ezali mitano: Kozongisa mbote, kotala bato ya maladi, kokende na matanga, koyanola na libyangi, mpe kosepela na koswa.”
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Ezalaki na moto moko oyo azalaka kosenga bato nyongo, mpe azalaka koloba na garçon na ye : Soki oyeli moto ya nyongo, limbisa ye mbala mosusu, Nzambe akolimbisa biso. Yango wana akutanaki na Nzambe mpe alimbisaki ye.”
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
Moto moko ayaki epayi ya Prophète, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, pe alobi: Ee Ntoma ya Nzambe, natikaki eloko moko te nyonso nasalaki, (ya masumu liboso ya Islam), alobaki naye: Ozali te, osili kotatola ete nzambe mosusu azali te kaka Allah mpe Muhammad azali Ntoma ya Nzambe?” mbala misato. Alobaki boye: oui, alobaki naye: “Oyo etongami likoló na yango” (olimbisami yakala).
Yasolo Elobami na Abu Ya'la, Al-Tabarani mpe Al-Diya Al-Maqdisi.
Motindami ya Nzambe (s.a.w) Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobaka na ndeko ya papa naye ya mobali : Lobá: Nzambe mosusu azali te kaka Allah, na kotatola yango pona yo na mokolo ya lisekwa”. Alobaki: Soki ba Quraysh bafingaka ngayi te, bango bakoloba: na memi yango pona bolembo, soki bongo te nalingaki nasepeli motema naye, Na sima Nzambe akitisaki verse: «Ya sôló, yo (Muhammad) okoki kokamba oyo olingi te, kasi Allah nde akambaka oyo aling» [Al-Qasas: 56].
Yasolo Elobami na Muslim
“Moto oyo ayokelaka bato mawa te, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoyokela ye mawa te”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Kotyola mosala moko ya malamu te, ata soki ezali kokutana na ndeko na yo na elongi ya esengo (kosekisa ye)”.
Yasolo Elobami na Muslim
“Moto oyo alingi ete Rizki na ye epanzana mpo na ye, mpe libula na ye ebakisama, abatela boyokani ya bondeko naye”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim