Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

34 of 108 cards

Clear filters
“Moto oyo azali kotanga Coran na mongongo ya polele azali lokola oyo azali kobimisa swadaka polele, mpe oyo azali kotanga Coran na mongongo ya kobombama azali lokola moto oyo azali kobimisa swadaka na kobombama”.
Yasolo Elobami na Abu Dawud, na Al-Tirmidhi mpe Al-Nasa'i.
“Moto ya makasi ezali te oyo abetaka, kasi moto ya makasi nde amipekisaka ntango asiliki”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Moto oyo ako détourner lokumu honneur ya ndeko na ye, Nzambe ako zongisa elongi na ye na lifelo mokolo ya Lisekwa”.
Yasolo Elobami na Al-Tirmidhi na Ahmed
Mutu moko ayelaki ntoma (s.a.w), mpe alobaki: O Motindami ya Nzambe, bantina mibale ezali nini? Alobaki naye: “Mutu oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko te, akokota na Paradis, na oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko, akokota na Lifelo”.
Yasolo Elobami na Muslim
“Akokota na Paladiso te oyo akataka boyokani ya bondeko”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
« Boyebi nini nde ezali matongi ? - Bayanolaki ye ete: Allah na Motindami na Ye nde bayebi malamu koleka! - Alobaki: -matongi - ezali “ koloba na sima ya ndeko nayo, na makambo oyo ayinaka ete bazala koloba yango. », balobaki: omoni ndenge nini soki ezwami okati ya ndeko nangai maye nazali koloba ? Na Ntoma ayanolaki na koloba ete: "Soki ezali epai maye ozali koloba, yeba ete osili kotonga ye, kasi soki azali te lolenge wana, yeba ete osili bongo kokoselaye likambu." »
Yasolo Elobami na Muslim
“Moko ya bilembo ya ngonga ya nsuka, ezali ete boyebi ekolongwa, kozanga boyebi ekobakisama, ekobo ekobakisama, masanga ekobakisama, mibali bako Sila, mpe basi bakobakisama kino... Mpo na basi ntuku mitano bakozala na mobali moko”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Nzambe ayokelaka mawa, moto oyo azalaka ko facilité ntango azali koteka, ntango azali kosomba, mpe tango azali kosambisa.”
Yasolo Elobami na Al bukhari