“Moto oyo ayokelaka bato mawa te, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoyokela ye mawa te”.
Kowuta na maloba ya Jarir bin Abdullah, Nzambe asepela na ye, alobaki: Motindami ya Nzambe (S.a.w) alobaki:
“Moto oyo ayokelaka bato mawa te, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoyokela ye mawa te”.
«مَنْ لَا يَرْحَمِ النَّاسَ لَا يَرْحَمْهُ اللهُ عَزَّ وَجَلَّ».
Ntoma, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alimboli ete ye oyo ayokelaka bato mawa te, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ayokelaka ye mawa te, Mawa ya mosaleli mpo na bozalisi ezali moko ya bantina minene mpo na kozwa mawa ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.
Motema mawa esengeli mpo na bikelamu nyonso, kasi esengeli kolobela bato mpenza mpo na komibanzabanza mpo na bango.
Nzambe azali Motema mawa mingi mpe ayokelaka basaleli na ye mawa, yango wana bolamu ezali lolenge moko na mosala.
Koyokela bato mawa ezali mpe kopesa bango bolamu, kobengana mabe epai na bango, mpe kosalela bango makambo na boboto.
Sahih al-Bukhari (8/ 10) (6013).
Sahih Muslim (4/ 1809) (2319).
Mbakisa (5)
شرح رياض الصالحين.
لابن عثيمين (2/ 553).
نزهة المتقين شرح رياض الصالحين (1/ 247).
بهجة الناظرين شرح رياض الصالحين.
لسليم الهلالي (1/ 319).