«Na oyo akotikela moto ya nyongo ngonga na tango azangi makoki, tope atikeli ye nyongo wana; na mokolo ya Suka, Allah akozipa ye na se ya elili ya Kiti ya Bokonzi na Ye, Mokolo oyo elili mokote ekozala obele se elili na Ye».
Abu Hurairah (Allah asepela naye) alobi: Motindami ya Allah (losambo mpe kimia ya Allah ezala likolo naye) alobaki:
«Na oyo akotikela moto ya nyongo ngonga na tango azangi makoki, tope atikeli ye nyongo wana; na mokolo ya Suka, Allah akozipa ye na se ya elili ya Kiti ya Bokonzi na Ye, Mokolo oyo elili mokote ekozala obele se elili na Ye».
«مَنْ أَنْظَرَ مُعْسِرًا، أَوْ وَضَعَ لَهُ، أَظَلَّهُ اللهُ يَوْمَ الْقِيَامَةِ تَحْتَ ظِلِّ عَرْشِهِ يَوْمَ لَا ظِلَّ إِلَّا ظِلُّهُ».
Ntoma Muhammad (kimia mpe mapamboli ezala likolo na ye) apesaki sango ete; ya solo na oyo akotikela moto ya nyongo ngonga pona nyongo naye, tope alongoli ye mokumba ya nyongo wana; lifuti na ye ekozala ete: Allah akozipa ye na se ya Kiti ya bokonzi na Ye mokolo ya suka, mokolo oyo moyi ekozala pène ya mitu ya bawumbu na Ye mpe molunge na yango ekozala makasi likolo na bango. Moto moko te akozwaka ezipamelo, obele kaka moto oyo Allah akobomba ye na elilingi na Ye .
عرشه: العرش هو المخلوق العظيم الذي استوى عليه الرحمن، ولا يقدر قدرَه إلا الله عز وجل.
Bolamu ya kolembisa makambu likolo ya basali ya Allah Motombwami, mpe yango ezali moko ya banzela ya kosikolama na minyoko ya Lisekwa
Lifuti ezalaka kolandisama na lolenge ya mosala
Sunan al-Tirmidhi (2/ 575) (1306).
Musnad Ahmad (14/ 329) (8711).
Mbakisa (8)
كنوز رياض الصالحين.
لمجموعة من الباحثين (16/ 412).
بهجة الناظرين شرح رياض الصالحين.
لسليم الهلالي (2/ 459).
فيض القدير شرح الجامع الصغير.
للمناوي (6/ 89).
نزهة المتقين شرح رياض الصالحين.
لمجموعة من الباحثين (2/ 947).
Cited in books
2 BooksMbakisa (2)
- الخطب المنبريةموسوعة الخطب المنبرية (القسم الثالث)«مَنْ أَنظَرَ مُعسِرًا أَو وَضَعَ لَهُ، أَظَلَّهُ اللهُ يَومَ القِيَامَةِ تَحتَ ظِلِّ عَرشِهِ يَومَ لا ظِلَّ إِلاَّ ظِلُّهُ»
- رياض الصالحينرياض الصالحين مع فوائد وهدايات - 6«مَنْ أنْظَرَ مُعْسِراً، أوْ وَضَعَ لَهُ، أظَلَّهُ اللهُ يومَ القيامة تَحْتَ ظلِّ عَرْشه، يَوْمَ لا ظلَّ إلَّا ظلُّهُ».