Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

99 of 108 cards

Clear filters
“Bato - ya ngonga - na ngai nyonso bako kota na Paradizo longola se oyo aboyi” - Bayekoli - batunaki : Ee Motindami ya Allah ! Boye nani akoboya? Ayanolaki na bango na koloba ete: “Moto oyo akotosa ngai akokota na Paradizo, mpe oyo akozanga botosi ngai yende asili koboya”.
Yasolo Elobami na Al bukhari
“Paradis ezali penepene na moko na bino koleka bansinga ya sapato na ye, na Lifelo ezali bongo.”
Yasolo Elobami na Al bukhari
“Moto nyonso oyo azali ko garantir ngai oyo ezali kati ya mandefu na ye mibale na oyo ezali na katikati ya makolo na ye, nazali ko garantir ye Paradis.”
Yasolo Elobami na Al bukhari
“Epesameli nzela te moto asundola ndeko na ye mikolo koleka misato, Bakutani, na oyo alakisi ye, oyo alakisi, ye, na oyo eleki malamu kati na bango mibale ezali oyo akobanda na Salamu”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
Moto moko ayaki epayi ya Profeta, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, pe alobi: Nazali créatif, yango wana mema ngai. Alobaki boye: “Nazali na yango te.” Bongo moto moko alobski : O Ntoma ya Nzambe, nakokamba ye epai ya moto oyo akomema ye. Ntoma ya Nzambe, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobaki boye: «Moto oyo akokamba na bolamu akozwa lifuta oyo ekokani na mosali yango”.
Yasolo Elobami na Muslim
“Ya solo, bato oyo Nzambe ayinaka bango mingi, ezali monguna ya trouble”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Ngonga ekoya te kino moi ekobima na westi, yango wana ntango ekobima mpe bato bakomona yango, bango nyonso bakondima, mpe yango ekozala ntango oyo: {Molimo moko te ekozwa litomba na bondimi na yango soki endimaki liboso te, to ezwaki bolamu moko te na nzela ya bondimi na yango} [Al-An'am: 158]. Mpe Ngonga ekoya ntango bato mibale bakotanda elamba na bango kati na bango, mpo ete bakoteka yango te, mpe bakokanga yango te. Mpe Ngonga ekoya ntango moto akolemba na miliki ya ngombe na ye, kasi akoleisa yango te. Mpe Ngonga ekoya ntango akotondisa saani na ye mpe akosopa mai na kati na yango te. Mpe Ngonga ekoya ntango moko na bino akomema bilei na ye na monoko na ye mpe akolya yango te”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Bofingaka bakufi te, mpo na bango basilá kokokisa makambo oyo basalaki”.
Yasolo Elobami na Al bukhari