Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

63 of 108 cards

Clear filters
“yasolo Moko na bino alingi, ntango akozonga na libota na ye, akuta ba chameaux misato ya mafuta mpe mikuwa?” Tolobaki: oui. Alobaki boye: “Baverse misato oyo moko na bino akotánga na losambo na ye eleki chameaux misato ya mafuta mpe ya monene”.
Yasolo Elobami na Muslim
Nalobaki: Ee Ntoma ya Nzambe, Ibn Jadaan azalaki na tango ya liboso ya Islam, kobatela boyokani ya libota mpe koleisa babola Est-ce que yango ezalaki na litomba mpo na ye? Alobi: “Ezali na litomba te mpo na ye, alobaki ata mokolo Moko te Nkolo na ngai, limbisa ngai masumu na ngai na Mokolo ya nsuka”.
Yasolo Elobami na Muslim
“Mabonza moko te ekitisaka bozwi, mpe Nzambe abakisaka grâce ya mosaleli naye te longola se na kobakisaye makasi, mpe moto moko te amikitisaka liboso ya Nzambe longola se Nzambe akotombola ye”.
Yasolo Elobami na Muslim
Nayokaki Profeta, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, mikolo mitano liboso akufa, alobaki: «ngai namitie pene ya nzambe koleka kozala pene ya moko na bino, mpe Yasolo nzambe asili kotia ngai pene naye Ndenge atia Abraham camarade naye, Soki nazuaki moninga ya pene na ekolo na ngai, mbele nazua Abu Bakr lokola moninga, Ya solo baoyo bazalaki liboso na bino bazalaki kozwa malita ya basakoli na bango, Mpe bayengebene lokola bisika ya losambo, Bozwa malita te lokola bisika ya losambo ngai napekisi bino yango".
Yasolo Elobami na Muslim
“Na Oyo akotelema na Butu ya Mokano, na bondimi nyonso mpe na kolikya lifuti -epai ya Allah-, Bakolimbisa masumu naye oyo maleka”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Droit ya Musulman likoló ya Musulman mosusu ezali mitano: Kozongisa mbote, kotala bato ya maladi, kokende na matanga, koyanola na libyangi, mpe kosepela na koswa.”
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Nzambe akomaki mibeko ya bozalisi mibu nkóto ntuku mitano (50.000), liboso ete akela mapata na mabele,” Alobaki: “Mpe kiti na Ye ya bokonzi ezalaki likoló na mai”.
Yasolo Elobami na Muslim
“Ezalaki na moto moko oyo azalaka kosenga bato nyongo, mpe azalaka koloba na garçon na ye : Soki oyeli moto ya nyongo, limbisa ye mbala mosusu, Nzambe akolimbisa biso. Yango wana akutanaki na Nzambe mpe alimbisaki ye.”
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim