Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

63 of 108 cards

Clear filters
« Ee Allah! Moto nyonso oyo azali mokambi ya likambo moko na kati ya Umma [Lingomba] na ngai, mpe akomisi yango pasi likolo na bango, [Ee Allah!] Komisa pe makambo pasi likolo naye. Mpe na oyo azali na mokumba ya likambo moko na kati na Umma na ngai, naye azali kokomisa yango pète epai na bango, [Allah] Komisa mpe makambo pète pona ye. »
Yasolo Elobami na Muslim
“Eloko nyonso ezali na Destin, ti ata na kozanga na kolonga, to kolonga mpe kozanga”.
Yasolo Elobami na Muslim
Nalobaki: O Motindami ya Nzambe, ba nkopo ya mai ya haudu ezali nini? Alobaki boye: “Na Lapi na oyo molimo ya Muhammad ezali na Loboko na ye, nkopo na yango eleki motángo ya minzoto ya mapata mpe ba étoiles na yango, longola kaka na butu ya molili mpe ya polele, ba nkopo ya Paradis, na oyo akomela na yango akoyoka mposa ya mai te Bolai na yango ezali Ndenge Moko na bonene nayango, kobanda na Amman ebandeli tii na Ayla suka, mai na yango ezali mpembe koleka miliki, mpe elengi koleka mafuta ya nzoi.
Yasolo Elobami na Muslim
Motindami ya Nzambe (s.a.w) atangaka verset oyo: {Ye nde akitiseli yo buku kati na yango ezali na mikapo mia polele ya mibeko, mikapo wana nde mizali misisa ya buku, mpe mikapo misusu mizali na bokokani kati na yango. Na yango bato baye bazali na bokono ya libungi o mitema mia bango, bazali sé kolanda mikapo miye mikokana mpona koluka bomekano to mpe koluka ndimbola na yango, kasi moto moko te ayebi ndimbola na yango, sé ye moko Allah. Nzoka nde, banganga Nzambe (Allah) baye batonda mayele balobaka ete: Biso tondimi na yango. Nyoso ewuti epai na Nkolo na biso, sé bato baye bazali na mayele nde bazali kokanisa mpe kondima na yango} .[Al Imran: 7] na likambo yango. Alobaki: Ntoma ya Nzambe, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobi: «Bongo soki bomoni baoyo bazali kolanda likambo oyo ekokani na yango, boye wana nde Nzambe apesi bango nkombo, yango wana keba na bango”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
Mutu moko ayelaki ntoma (s.a.w), mpe alobaki: O Motindami ya Nzambe, bantina mibale ezali nini? Alobaki naye: “Mutu oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko te, akokota na Paradis, na oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko, akokota na Lifelo”.
Yasolo Elobami na Muslim
“Akokota na Paladiso te oyo akataka boyokani ya bondeko”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Baoyo bazali kolobaloba, basili kobungisa.” alobela yango mbala misato.
Yasolo Elobami na Muslim
«Nzambe asalaka mondimi mabe te na mosala ya malamu, mpo na yango akopesama na mokili oyo mpe akozwa mbano mpo na yango na mokolo ya nsuka, Mpo na oyo azangi kondima, azali koleisama na misala malamu oyo asalaki mpo na Nzambe na mokili oyo, kino ntango akomema mokolo ya nsuka, azali na mosala malamu te mpo na kozwa mbano”.
Yasolo Elobami na Muslim