Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

52 of 108 cards

Clear filters
Ntoma ya Nzambe (s.a.w) abondelaki losambo ya ntongo na biso na Al-Hudaybiyyah, na lolenge ya mapata ezalaki yako kangama, mpe ntango asilisi, akendaki epai ya bato. Alobi: “boyebi oyo Nkolo na bino alobi?” Balobaki: Nzambe na Ntoma na Ye bayebi malamu koleka. Alobaki boye: “Kati na basaleli na Ngai ezali na mondimi epai na Ngai mpe mozangi kondima , Mpo na oyo alobi: Tozwi mbula na ngolu mpe ngolu ya Nzambe, azali mondimi na Ngai mpe aboyi kondima ba étoiles, na mpo na oyo alobi: ezuami na nzela ya boye, mpona boye azali mondimi te “Epai na ngai mpe asili kondima ba minzoto” (kaukabun).
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
Mutu moko alobaki boye: O Ntoma ya Nzambe (s.a.w) tokoki kozwa mokumba pona oyo tosalaki na tango ya liboso ya Islam? Alobaki: “mutu oyo akobongisa na Islam akozwa mokumba te! pona oyo elekaki, na mutu oyo akosala mabe na Islam, akozuwa ya liboso na ya suka”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
Elobamaki, O Motindami ya Nzambe, nani akozala na esengo koleka bato na intercession na yo na Mokolo ya Lisekwa? Ntoma ya Nzambe, tika ete Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobaki boye: “Nakanisaki, O Abu Hurairah, ete moto moko te akotuna ngai na ntina ya hadith oyo koleka yo, ntango namonaki mposa na yo ya kolobela hadith,Bato oyo bakosepela mingi na libondeli na ngai na Mokolo ya Lisekwa, oyo alobi ete nzambe mosusu azali te bobele Allah ye Moko, na bosembo uta na motema to na molimo na ye.”
Yasolo Elobami na Al bukhari
“Mosala nyonso ya malamu ezali swadaka”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na hadith ya Jabir pe elobami na Muslim na hadith ya Hudhayfa.
“Ngonga ekoya te kino bokobunda na Bayuda, Kino libanga oyo ezali sima ya moyuda ekoloba: O musulman, moyuda moko azali sima na ngai, yango wana boma ye.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Ezali na mosaleli moko te oyo Nzambe abatelaki ye liboso ya bato oyo azali kokengela, mpe akufaki mokolo oyo akosaki bato na ye, kasi Nzambe akopekisa ye Paladiso”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Nyonso oyo asali Hajj mpo na bolamu ya Nzambe mpe asali mbindo to mabe te, bozongi na ye ekozala lokola mokolo maman na ye abotaki ye”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Momemi makambo songi songi akokota na Paradis te!”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim