Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

6 of 108 cards

Clear filters
“Ndakisa ya moto ya bokosi munafiki ezali lokola meme oyo ebunga nzela. Kati na ba ntaba mibale, ebaluki epai ya oyo mbala moko mpe epai ya mosusu mbala moko”.
Yasolo Elobami na Muslim
“Ee Nzambe, kosala lilita na ngai ezala ekeko te, Nzambe asili kolakela mabe na bato oyo bazali kozwa malita ya basakoli na bango lokola bisika ya losambo”.
Yasolo Elobami na Ahmed
“Moto oyo alapi ndai na nkombo mosusu oyo ezali ya nzambe te, andimi te to asali banzambe mingi.”
Yasolo Elobami na Abu Dawud na Al-Tirmidhi na Ahmed.
Ntoma ya Nzambe (s.a.w) abondelaki losambo ya ntongo na biso na Al-Hudaybiyyah, na lolenge ya mapata ezalaki yako kangama, mpe ntango asilisi, akendaki epai ya bato. Alobi: “boyebi oyo Nkolo na bino alobi?” Balobaki: Nzambe na Ntoma na Ye bayebi malamu koleka. Alobaki boye: “Kati na basaleli na Ngai ezali na mondimi epai na Ngai mpe mozangi kondima , Mpo na oyo alobi: Tozwi mbula na ngolu mpe ngolu ya Nzambe, azali mondimi na Ngai mpe aboyi kondima ba étoiles, na mpo na oyo alobi: ezuami na nzela ya boye, mpona boye azali mondimi te “Epai na ngai mpe asili kondima ba minzoto” (kaukabun).
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Moto oyo akutani na Nzambe na asangisaki Ye na eloko moko te, ako kota na Paradis, Mpe moto nyonso oyo akokutana na ye mpe asangisaki ye na eloko, akokota na Lifelo.”
Yasolo Elobami na Muslim
Nalobaki: Ee Ntoma ya Nzambe, Ibn Jadaan azalaki na tango ya liboso ya Islam, kobatela boyokani ya libota mpe koleisa babola Est-ce que yango ezalaki na litomba mpo na ye? Alobi: “Ezali na litomba te mpo na ye, alobaki ata mokolo Moko te Nkolo na ngai, limbisa ngai masumu na ngai na Mokolo ya nsuka”.
Yasolo Elobami na Muslim