Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

3 of 108 cards

Clear filters
“Bato - ya ngonga - na ngai nyonso bako kota na Paradizo longola se oyo aboyi” - Bayekoli - batunaki : Ee Motindami ya Allah ! Boye nani akoboya? Ayanolaki na bango na koloba ete: “Moto oyo akotosa ngai akokota na Paradizo, mpe oyo akozanga botosi ngai yende asili koboya”.
Yasolo Elobami na Al bukhari
Emonisami na Ntoma ya Nzambe (s.a.w) tango azalaki na mibu ntuku minei 40, Avandi na Mecque mbula zomi na misato 13, sima bapesaki ye mitindo ya kokende kofanda na mboka mopaya, yango wana akendaki kofanda na mboka mopaya Medina, avandaki kuna mbula zomi 10, sima akufi, nzambe apambola ye pe apesa ye kimia.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
Tango tofandaki na Prophète, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, na mosquée, mobali moko akoti na kamela na mosquée nsima akangaki yango, na nsima alobaki na bango, : Nani nakati na bino azali Muhammad? Mosakoli, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, azalaki kofanda na kati ya bato, yango wana tolobaki: Ezalaki mobali oyo ya pembe afandi awa, Mobali wana alobaki na ye : O Ibn Abdul Muttalib? Mosakoli, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobaki na ye: “Nayanoli yo.”Mobali wana alobaki na Prophète (s.a.w) : Nazali kotuna yo, motuna ya makasi, yango wana kosilikela ngai te na motema na yo. Alobaki: “Senga nyonso oyo olingi Alobi: Nazali kotuna yo na nzela ya Nkolo na yo mpe na nzela ya Nkolo ya baye bazalaki liboso na yo, Nzambe atindaki yo epai ya bato nyonso? Alobaki boye:“ Allâhuma nam, yasolo” Alobi: Nalapeli yo na kombo ya Nzambe. biso tosambelaka losambo mitano na mukolo nzambe nde atindakiyo nayango? Alobaki: "Allâhuma nam, yasolo,". Alobi: Nalapi yo na kombo ya Nzambe. yasolo nzambe nde atindakiyo biso tokangaka sanza oyo na mbula nyonso? Alobaki: "Allâhuma nam, yasolo". Alobi: Nalapeli yo na kombo ya Nzambe, yasolo nzambe nde atindakiyo ozua mosolo (swadaka) na bato ya mbongo kati na biso opesa bazangi? olobaki: " Allâhuma nam, Yasolo". Mobali wana alobaki: Nandimi oyo oyaki na yango, pe nazali motindami ya bato na ngai sima na ngai, mpe nazali Dhwimaam bin Thalabah, ndeko ya Banu Saad bin Bakr.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim