Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

44 of 108 cards

Clear filters
“Ngonga ekoya te kino bokobunda na Bayuda, Kino libanga oyo ezali sima ya moyuda ekoloba: O musulman, moyuda moko azali sima na ngai, yango wana boma ye.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Nzambe akobimisa polele mutu moko na ekólo na ngayi lokola mokonzi ya bozalisi na Mokolo ya Lisekwa mpe akotia likoló na ye makomi ntuku libwa na libwa 99, makomi moko moko kino liso ekomona ya go, Na nsima, akolobela ye : owangani ata moko ya makambo na oyo Bakomeli yo? Mpe na oyo bakangaki yango basalaki yo mabe? Akoloba: Te Nkolo nangayi, akolobela ye : balaa, yasolo bolamu na biso ezali pona yo, pamba te bako salayo injustice moko te lelo, Na nsima, bakobimisa carte moko oyo ezali na: Litatoli, Natatoli ete nzambe mosusu azali te kaka Allah, mpe natatoli ete Muhammad azali mosali mpe Ntoma naye, akolobaye: Mema kilo na yo, alobi Nkolo nanga, carte oyo eza na ba dossiers oyo eza nini? bakoloba naye: Bakomonela yo te, Alobi: Na nsima, batiya mikanda na loboko, mpe carte yango ekozala na loboko, yango mikanda ekómaki pepele, na carte yango ezalaki kilo, na eloko moko te ekoki kozala kilo koleka nkombo ya Nzambe”.
Yasolo Elobami na Tirmidhi mpe Ibn Majah
Nalobaki: Ee Ntoma ya Nzambe, Ibn Jadaan azalaki na tango ya liboso ya Islam, kobatela boyokani ya libota mpe koleisa babola Est-ce que yango ezalaki na litomba mpo na ye? Alobi: “Ezali na litomba te mpo na ye, alobaki ata mokolo Moko te Nkolo na ngai, limbisa ngai masumu na ngai na Mokolo ya nsuka”.
Yasolo Elobami na Muslim
“Moto oyo akomekola (imité) ekólo moko azali moko na bango”.
malamu Elobami na Abu Dawud na Ahmad
“Soki Nzambe apesi etinda ete mosaleli akufa na mokili, azalaka kotia ye mposa”.
Yasolo Elobami na Al-Tirmidhi
Nayokaki Profeta, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, mikolo mitano liboso akufa, alobaki: «ngai namitie pene ya nzambe koleka kozala pene ya moko na bino, mpe Yasolo nzambe asili kotia ngai pene naye Ndenge atia Abraham camarade naye, Soki nazuaki moninga ya pene na ekolo na ngai, mbele nazua Abu Bakr lokola moninga, Ya solo baoyo bazalaki liboso na bino bazalaki kozwa malita ya basakoli na bango, Mpe bayengebene lokola bisika ya losambo, Bozwa malita te lokola bisika ya losambo ngai napekisi bino yango".
Yasolo Elobami na Muslim
“Moto nyonso oyo akosala mabe, Nzambe akosala ye mabe, mpe moto nyonso oyo azali makasi, Nzambe akozala mpasi mpo na ye”.
malamu Elobami na Abu Dawud, Al-Tirmidhi, Ibn Majah na Ahmed.
Mosakoli (s.a.w) alobelaki likambo moko mpe alobaki: “Wana ezalaki na tango ya kolimwa ya boyebi" nalobaki: Ee Ntoma ya Nzambe, ndenge nini boyebi ekoki kolimwa, ntango biso Totangaka Coran, toteyaka yango na bana na biso, pe bana na biso bateyaka yango na bana na bango tii na mokolo ya lisekwa? Alobaki boye: “soki ete mama na yo, Ziyad, akufeli yo, na ngai namoni yo moko ya bato ya mayele mingi na Medina, Bayuda na banaswara bango batángaka Torah te? Na Nsango Malamu, basalaka eloko moko te oyo ezali na kati?!".
Malamu mpona basusu Elobami na Ibn Majah.