Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

41 of 108 cards

Clear filters
Mutu moko ayelaki ntoma (s.a.w), mpe alobaki: O Motindami ya Nzambe, bantina mibale ezali nini? Alobaki naye: “Mutu oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko te, akokota na Paradis, na oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko, akokota na Lifelo”.
Yasolo Elobami na Muslim
“Baoyo bazali kolobaloba, basili kobungisa.” alobela yango mbala misato.
Yasolo Elobami na Muslim
«Nzambe asalaka mondimi mabe te na mosala ya malamu, mpo na yango akopesama na mokili oyo mpe akozwa mbano mpo na yango na mokolo ya nsuka, Mpo na oyo azangi kondima, azali koleisama na misala malamu oyo asalaki mpo na Nzambe na mokili oyo, kino ntango akomema mokolo ya nsuka, azali na mosala malamu te mpo na kozwa mbano”.
Yasolo Elobami na Muslim
«Na oyo akotikela moto ya nyongo ngonga na tango azangi makoki, tope atikeli ye nyongo wana; na mokolo ya Suka, Allah akozipa ye na se ya elili ya Kiti ya Bokonzi na Ye, Mokolo oyo elili mokote ekozala obele se elili na Ye».
Yasolo Elobami na Al-Tirmidhi na Ahmed
“Ndakisa ya moto ya bokosi munafiki ezali lokola meme oyo ebunga nzela. Kati na ba ntaba mibale, ebaluki epai ya oyo mbala moko mpe epai ya mosusu mbala moko”.
Yasolo Elobami na Muslim
Nalobaki: O Motindami ya Nzambe, omoni makambo oyo Na ntango ya liboso ya Islam, nazalaki kosalela yango lokola mosala ya malamu kokaba, kotikela baumbu oyo bazwaki bonsomi, na kotangisa bondeko, mpona yango naza nabolamu? Na sima Prophète, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, alobi: «okoti na Islam na bolamu oyo elekaki”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
Moto moko ayaki epai ya Ntoma, mabondeli ya Nzambe mpe kimia ezala likolo na ye, mpe alobi: Ee Motindami ya Nzambe, moko kati na biso akuti kati ya motema na ye moko - Abimisi likambo moko mpo ezali kolinga ye mingi koleka kolobela yango., ntoma alobaki : “Nzambe azali monene, Nzambe azali monene, matondo na Nzambe oyo azongisaki mayele mabe na ye na mongongo ya nse”.
Yasolo Elobami na Abu Dawud na Al-Nasai na Al-Kubra.
“Est-ce que ekoki kosalema hadith na ngayi ekomeli mutu, ntango oyo ye avandi na trône naye? alobaki lisusu : Kati na biso na bino ezali na Buku ya Nzambe, oyo tokokuta halali to tie yango halali, na oyo tokokuta ezali haramu to tie yango haramu, na oyo ntoma ya nzambe (s.a.w) apekisaki ezali oyo nzambe apekisaki yango".
Yasolo Elobami na Abu Dawud, Al-Tirmidhi mpe Ibn Majah.