Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

19 of 108 cards

Clear filters
“Paradis ezali penepene na moko na bino koleka bansinga ya sapato na ye, na Lifelo ezali bongo.”
Yasolo Elobami na Al bukhari
“Moto nyonso oyo azali ko garantir ngai oyo ezali kati ya mandefu na ye mibale na oyo ezali na katikati ya makolo na ye, nazali ko garantir ye Paradis.”
Yasolo Elobami na Al bukhari
"Liwa ekomemama lokola nyama ya Bien, mpe mobeleli ako belela: O bato ya Paradis, bakobaluka na kotala, mpe ekolobama na bango : boyebi Oyo? bango bakoyanola: oui, oyo ezali liwa, na bango nyonso bakomona yango, nsima akobelela: O bato ya lifelo, bongo bakobaluka na kotala, ekolobama na bango: boyebi oyo ? bakoyanola: oui, oyo ezali liwa, na bango nyonso bakomona, akokatama Kingo, na nsima akobelela: O bato ya Paradis, botikala pona seko liwa eza te, mpe bino bato ya lifelo botikala pona seko liwa eza te, nsima atangaki: {Mpe kebisa bango na Mokolo ya mawa ntango likambo esili kokatama ntango bazali na bozangi bokebi} [Maryam: 39], mpe baye bazali bato ya mokili oyo na bozangi bokebi {mpe bango bazali bandimi te} [Maryam: 39]».
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Bokima makámá nsambo7” Balobaki: O Motindami ya Nzambe, yango ezali nini? Alobaki: "kosangisa nzambe1, na kindoki 2, na koboma oyo nzambe apekisi 3, nakolia Ribâ 4, na kolia bomengo ya bana bitike 5, na kokima baninga Mokolo ya bitumba 6, Mpe kofinga basi ya peto, ya kondima, na likambu oyo bayebi te 7".
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Moto oyo akutani na Nzambe na asangisaki Ye na eloko moko te, ako kota na Paradis, Mpe moto nyonso oyo akokutana na ye mpe asangisaki ye na eloko, akokota na Lifelo.”
Yasolo Elobami na Muslim
“Maloba oyo nzambe alingaka yango mingi, koloba minei: Subhâna l-lâhi, wa-l-hamdu li-l-lâhi, wa lâ ilâaha illâ l-lâahu, wa l-lâahu akbar. Ezali mabe te epayi nayo obanda na moko na yango".
Yasolo Elobami na Muslim
“Bóyekola boyebi te mpo na komikumisa na yango epai ya bato ya mayele. To mpe mpo na kobunda na yango, mpe bopona bisika te lokola mbano na yango mpo na oyo asali bongo, Lifelo ezali Lifelo.
Yasolo Elobami na Ibn Majah.
“Ngonga oyo mosaleli azalaka penepene na Nkolo na ye ezali ntango azali kofukama na sujudu, yango wana bobondela Dua mingi”.
Yasolo Elobami na Muslim