Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

10 of 108 cards

Clear filters
“Moto ya makasi ezali te oyo abetaka, kasi moto ya makasi nde amipekisaka ntango asiliki”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
Moto moko ayaki epayi ya Profeta, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, pe alobi: Nazali créatif, yango wana mema ngai. Alobaki boye: “Nazali na yango te.” Bongo moto moko alobski : O Ntoma ya Nzambe, nakokamba ye epai ya moto oyo akomema ye. Ntoma ya Nzambe, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobaki boye: «Moto oyo akokamba na bolamu akozwa lifuta oyo ekokani na mosali yango”.
Yasolo Elobami na Muslim
“Ya solo, bato oyo Nzambe ayinaka bango mingi, ezali monguna ya trouble”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Bokima makámá nsambo7” Balobaki: O Motindami ya Nzambe, yango ezali nini? Alobaki: "kosangisa nzambe1, na kindoki 2, na koboma oyo nzambe apekisi 3, nakolia Ribâ 4, na kolia bomengo ya bana bitike 5, na kokima baninga Mokolo ya bitumba 6, Mpe kofinga basi ya peto, ya kondima, na likambu oyo bayebi te 7".
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
« Ya solo baye oyo bazali na bosembo na miso ya Allah likolo ya bakiti ya pôlé, na mopanzi ya mobali ya Nkolo Mtondi-Mawa, Motondi Nguya,mpe Maboko na Ye mibale mazali sembo, ezali baye oyo bazalaka bosembo na bokati mibeko na bango, na mabota na bango mpe na maye oyo bazali na mikumba na yango. »
Yasolo Elobami na Muslim
“Momemi makambo songi songi akokota na Paradis te!”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Ezalaki na moto moko oyo azalaka kosenga bato nyongo, mpe azalaka koloba na garçon na ye : Soki oyeli moto ya nyongo, limbisa ye mbala mosusu, Nzambe akolimbisa biso. Yango wana akutanaki na Nzambe mpe alimbisaki ye.”
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Moto oyo ayokelaka bato mawa te, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoyokela ye mawa te”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim