Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

63 of 108 cards

Clear filters
“Ndakisa ya moto ya bokosi munafiki ezali lokola meme oyo ebunga nzela. Kati na ba ntaba mibale, ebaluki epai ya oyo mbala moko mpe epai ya mosusu mbala moko”.
Yasolo Elobami na Muslim
Nalobaki: O Motindami ya Nzambe, omoni makambo oyo Na ntango ya liboso ya Islam, nazalaki kosalela yango lokola mosala ya malamu kokaba, kotikela baumbu oyo bazwaki bonsomi, na kotangisa bondeko, mpona yango naza nabolamu? Na sima Prophète, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, alobi: «okoti na Islam na bolamu oyo elekaki”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
« Boyebi nini nde ezali matongi ? - Bayanolaki ye ete: Allah na Motindami na Ye nde bayebi malamu koleka! - Alobaki: -matongi - ezali “ koloba na sima ya ndeko nayo, na makambo oyo ayinaka ete bazala koloba yango. », balobaki: omoni ndenge nini soki ezwami okati ya ndeko nangai maye nazali koloba ? Na Ntoma ayanolaki na koloba ete: "Soki ezali epai maye ozali koloba, yeba ete osili kotonga ye, kasi soki azali te lolenge wana, yeba ete osili bongo kokoselaye likambu." »
Yasolo Elobami na Muslim
“Moto na bino ezali eteni moko ya biteni ntuku nsambo (70) ya moto ya Lifelo”, elobamaki: O Motindami ya Nzambe, soki ekoki. Alobaki boye: “Bapesaki ye biteni ntuku motoba na libwa (69), nyonso ekokani Lolenge moko ya mulunge”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Moko ya bilembo ya ngonga ya nsuka, ezali ete boyebi ekolongwa, kozanga boyebi ekobakisama, ekobo ekobakisama, masanga ekobakisama, mibali bako Sila, mpe basi bakobakisama kino... Mpo na basi ntuku mitano bakozala na mobali moko”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
« [Ange] Jibril azalaki kokoba na kopesa ngai toli mpo na mozalani [voisin] na ngai, kino nakanisaki ete ako komisa ye moko kati ya bakitani ya bozwi [heritage] na ngai. »
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Soki bamizilman mibale bazali kobunda na bibundeli na bango; mobomi na oyo babomi bango mibale bakokota na Lifelo”, na lobaki: Ee Motindami ya Allah! Oyo azali mobomi, ebongo likambo nini na oyo babomi? Na Ntoma Ayanolaki ete: “ moto oyo babomi, yepe azalaki na mposa makasi ya koboma moninga na ye”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobaki ete: Nazali riche koleka ba partenaires ya bosangisi, na oyo asali mosala asangisi ngai, nakotikaye na bosangisi naye".
Yasolo Elobami na Muslim