Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

5 of 108 cards

Clear filters
“Ntango Nzambe akelaki Lola mpe Lifelo, atindaki Gabriel, kimia ezala likolo na ye na Lola, Alobaki: otala yango pe oyo nabongisi kati pona bato na yango. Atalaki yango mpe azongaki. Alobaki: Na nkembo na Yo, moto moko te akoyoka yango soki akoti na yango te. Na yango, apesaki mitindo ete bázinga yango na makama, yango wana alobaki ete: Kende epai na yango mpe talá yango mpe makambo oyo nabongisi mpo na bato na yango kati na yango. Bongo atalaki yango mpe amonaki ete ezingami na likama Alobi: Na nkembo na Yo, nabangaki ete moto moko te akota na yango. Alobaki: Kende kotala Moto mpe oyo nabongisi mpo na bato na yango kati na yango. Bongo atalaki yango mpe amonaki ete ezali komata likoló na mosusu mpe alobaki ete: Na nkembo na Yo, moto moko te akokota na yango. Na yango, apesaki mitindo ete ezinga yango na bamposa, yango wana alobaki: Zongela mpe tala yango. Bongo atalaki yango mpe amonaki ete ezingami na bamposa na nsima azongaki mpe alobaki ete: Na nkembo na Yo, nabangaki ete moto moko te akima yango soki akoti na yango te.
malamu Elobami na Abu Dawud, na Al-Tirmidhi mpe Al-Nasa'i.
“Ekolobama na moto oyo azali kotanga Coran: Tanga mpe mata, mpe tanga ndenge ozalaki kotanga na mokili oyo, mpo ete esika na yo ya nsuka ezali na verse ya nsuka oyo okotánga”.
malamu Elobami na Abu Dawud, na Al-Tirmidhi, na Al-Nasa'i na Al-Kubra mpe na Ahmed.
“Moto oyo akomekola (imité) ekólo moko azali moko na bango”.
malamu Elobami na Abu Dawud na Ahmad
“Bókómisa bandako na bino malita te, mpe bókómisa lilita na ngai fêti te, kasi bosambela mpo na ngai. Mabondeli na bino ekokóma epai na ngai na bisika nyonso oyo bozali.”
malamu Elobami na Abu Dawud
“Moto nyonso oyo akosala mabe, Nzambe akosala ye mabe, mpe moto nyonso oyo azali makasi, Nzambe akozala mpasi mpo na ye”.
malamu Elobami na Abu Dawud, Al-Tirmidhi, Ibn Majah na Ahmed.