Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

5 of 108 cards

Clear filters
Mutu moko ayelaki ntoma (s.a.w), mpe alobaki: O Motindami ya Nzambe, bantina mibale ezali nini? Alobaki naye: “Mutu oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko te, akokota na Paradis, na oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko, akokota na Lifelo”.
Yasolo Elobami na Muslim
“Baoyo bazali kolobaloba, basili kobungisa.” alobela yango mbala misato.
Yasolo Elobami na Muslim
Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobaki ete: Nazali riche koleka ba partenaires ya bosangisi, na oyo asali mosala asangisi ngai, nakotikaye na bosangisi naye".
Yasolo Elobami na Muslim
Nazalaki sima ya Prophète (s.a.w), likolo ya mpunda oyo babengi Ufayr. Ntoma alobaki : “ya Muadh, oyebi droit ya nzambe epayi ya basali naye, na droit ya basali epayi ya nzambe ?", nalobaki: nzambe na ntoma naye nde bayebi, ntoma alobaki: " yasolo droit ya nzambe ezali, basambelaye basangisa ye na eloko moko te, mpe droit ya basali naye ezali apesa bango etumbu te, na Mutu oyo asangisakiye te" Nalobaki: O Motindami ya Nzambe, namema nsango oyo epai ya bato? Alobaki boye: “Kopesa bango nsango te, bako likiya”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
Nayokaki Profeta, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, mikolo mitano liboso akufa, alobaki: «ngai namitie pene ya nzambe koleka kozala pene ya moko na bino, mpe Yasolo nzambe asili kotia ngai pene naye Ndenge atia Abraham camarade naye, Soki nazuaki moninga ya pene na ekolo na ngai, mbele nazua Abu Bakr lokola moninga, Ya solo baoyo bazalaki liboso na bino bazalaki kozwa malita ya basakoli na bango, Mpe bayengebene lokola bisika ya losambo, Bozwa malita te lokola bisika ya losambo ngai napekisi bino yango".
Yasolo Elobami na Muslim