Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

3 of 108 cards

Clear filters
«Na oyo akotikela moto ya nyongo ngonga na tango azangi makoki, tope atikeli ye nyongo wana; na mokolo ya Suka, Allah akozipa ye na se ya elili ya Kiti ya Bokonzi na Ye, Mokolo oyo elili mokote ekozala obele se elili na Ye».
Yasolo Elobami na Al-Tirmidhi na Ahmed
“Est-ce que ekoki kosalema hadith na ngayi ekomeli mutu, ntango oyo ye avandi na trône naye? alobaki lisusu : Kati na biso na bino ezali na Buku ya Nzambe, oyo tokokuta halali to tie yango halali, na oyo tokokuta ezali haramu to tie yango haramu, na oyo ntoma ya nzambe (s.a.w) apekisaki ezali oyo nzambe apekisaki yango".
Yasolo Elobami na Abu Dawud, Al-Tirmidhi mpe Ibn Majah.
“Nzambe akobimisa polele mutu moko na ekólo na ngayi lokola mokonzi ya bozalisi na Mokolo ya Lisekwa mpe akotia likoló na ye makomi ntuku libwa na libwa 99, makomi moko moko kino liso ekomona ya go, Na nsima, akolobela ye : owangani ata moko ya makambo na oyo Bakomeli yo? Mpe na oyo bakangaki yango basalaki yo mabe? Akoloba: Te Nkolo nangayi, akolobela ye : balaa, yasolo bolamu na biso ezali pona yo, pamba te bako salayo injustice moko te lelo, Na nsima, bakobimisa carte moko oyo ezali na: Litatoli, Natatoli ete nzambe mosusu azali te kaka Allah, mpe natatoli ete Muhammad azali mosali mpe Ntoma naye, akolobaye: Mema kilo na yo, alobi Nkolo nanga, carte oyo eza na ba dossiers oyo eza nini? bakoloba naye: Bakomonela yo te, Alobi: Na nsima, batiya mikanda na loboko, mpe carte yango ekozala na loboko, yango mikanda ekómaki pepele, na carte yango ezalaki kilo, na eloko moko te ekoki kozala kilo koleka nkombo ya Nzambe”.
Yasolo Elobami na Tirmidhi mpe Ibn Majah