Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

12 of 108 cards

Clear filters
Ba compagnons mosusu ya Prophète, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, bayaki pe batuni ye: Tomonaka kati na biso moko makambo oyo moko na moko kati na biso amonaka mpasi mingi mpo na koloba. Alobaki boye: “bokutaka yengo?” Balobaki: oui Alobaki: “Wana ezali bondimi ya polele”.
Yasolo Elobami na Muslim
“Satana akoyelaka moko na bino mpe alobi ete: Nani akelaki boye mpe boye? Nani akelaki boye na boye? Kino akoloba: Nani akela Nkolo na yo? Na yango, ntango akokóma na esika yango, tiká aluka ekimelo epai ya Nzambe mpe azala na motema yako silisa ye”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
Anas bin Malik, Nzambe asepela na ye, alobelaki na biso ete mutu moko alobaki: O Ntoma ya Nzambe, ndenge nini mutu oyo azali kondima te akoki kotabwisama na elongi na ye? Alobaki: « oyo asalaki ye atambola na makolo mibale na mokili oyo azali na makoki te ya kosala ete atambola na elongi na ye na Mokolo ya Lisekwa?” Qatada alobaki: yasolo, na nguya ya Nkolo na biso.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
Mutu moko ayelaki ntoma (s.a.w), mpe alobaki: O Motindami ya Nzambe, bantina mibale ezali nini? Alobaki naye: “Mutu oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko te, akokota na Paradis, na oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko, akokota na Lifelo”.
Yasolo Elobami na Muslim
“Baoyo bazali kolobaloba, basili kobungisa.” alobela yango mbala misato.
Yasolo Elobami na Muslim
«Nzambe asalaka mondimi mabe te na mosala ya malamu, mpo na yango akopesama na mokili oyo mpe akozwa mbano mpo na yango na mokolo ya nsuka, Mpo na oyo azangi kondima, azali koleisama na misala malamu oyo asalaki mpo na Nzambe na mokili oyo, kino ntango akomema mokolo ya nsuka, azali na mosala malamu te mpo na kozwa mbano”.
Yasolo Elobami na Muslim
Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobaki ete: Nazali riche koleka ba partenaires ya bosangisi, na oyo asali mosala asangisi ngai, nakotikaye na bosangisi naye".
Yasolo Elobami na Muslim
“Ya solo Allah atalaka te na bilongi pe na bozwi na bino, kasi (Allah) azalaka nde kotala na mitema pe na misala na bino".
Yasolo Elobami na Muslim