Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

19 of 108 cards

Clear filters
“Moto ya makasi ezali te oyo abetaka, kasi moto ya makasi nde amipekisaka ntango asiliki”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Akokota na Paladiso te oyo akataka boyokani ya bondeko”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Moko ya bilembo ya ngonga ya nsuka, ezali ete boyebi ekolongwa, kozanga boyebi ekobakisama, ekobo ekobakisama, masanga ekobakisama, mibali bako Sila, mpe basi bakobakisama kino... Mpo na basi ntuku mitano bakozala na mobali moko”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Nzambe ayokelaka mawa, moto oyo azalaka ko facilité ntango azali koteka, ntango azali kosomba, mpe tango azali kosambisa.”
Yasolo Elobami na Al bukhari
“Epesameli nzela te moto asundola ndeko na ye mikolo koleka misato, Bakutani, na oyo alakisi ye, oyo alakisi, ye, na oyo eleki malamu kati na bango mibale ezali oyo akobanda na Salamu”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Ya solo, bato oyo Nzambe ayinaka bango mingi, ezali monguna ya trouble”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Bofingaka bakufi te, mpo na bango basilá kokokisa makambo oyo basalaki”.
Yasolo Elobami na Al bukhari
Ntoma (kimia mpe boboto ezala likolo naye) alobi - kolandisama na maye Nkolo naye ete: «Mosali moko asalaki lisumu, na sima alobi: '' O Nkolo! Limbisa masumu na ngai", Allah Lokumu naye, alobi: "Mosali na ngai asali lisumu, mpe ayebi ete azali na Nkolo oyo Alimbisaka masumu, lolenge moko pe Apesaka etumu likolo ya masumu. Kasi na sima mowumbu asali lisusu lisumu mpe alobi : " Ee Nkolo! Limbisa masumu na ngai, mpe Allah Lokumu naye, alobi lisusu ete: "Mosali na ngai asali lisumu, mpe ayebi ete azali na Nkolo oyo Alimbisaka masumu, lolenge moko pe Apesaka etumu likolo ya masumu. Kasi na sima mowumbu asali lisusu lisumu mpe alobi : " Ee Nkolo! Limbisa masumu na ngai, mpe Allah Lokumu naye, alobi lisusu : "Mosali na ngai asali lisumu, mpe ayebi ete azali na Nkolo oyo Alimbisaka masumu, lolenge moko pe Apesaka etumu likolo ya masumu. Sala nyonso olingi, mpo esi Nalimbisi yo».
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim