Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

44 of 108 cards

Clear filters
Bato ya Buku bazalaki kotanga Torah na hébreu, mpe kolimbola yango na Arabe mpo na bato ya Islam, Na sima Motindami ya Nzambe, tika Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, alobi : «Bondima Bato ya Buku te mpe bowangani bango te, kasi boloba : {Tondimi Nzambe pe oyo emonisama epai na biso} [Al-Baqarah: Motángo 136] “Verset”.
Yasolo Elobami na Al bukhari
"Source na ngai ezali mobembo ya sanza moko, mai na yango ezali mpembe koleka miliki, mpe nsolo na yango ezali elengi koleka musc, mpe ba écailles na yango ezali lokola minzoto ya likoló, oyo akomela yango akoyoka mposa ya mai ata mokolo moko te “.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
Motindami ya Nzambe (s.a.w) Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobaka na ndeko ya papa naye ya mobali : Lobá: Nzambe mosusu azali te kaka Allah, na kotatola yango pona yo na mokolo ya lisekwa”. Alobaki: Soki ba Quraysh bafingaka ngayi te, bango bakoloba: na memi yango pona bolembo, soki bongo te nalingaki nasepeli motema naye, Na sima Nzambe akitisaki verse: «Ya sôló, yo (Muhammad) okoki kokamba oyo olingi te, kasi Allah nde akambaka oyo aling» [Al-Qasas: 56].
Yasolo Elobami na Muslim
Tango tofandaki na Prophète, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, na mosquée, mobali moko akoti na kamela na mosquée nsima akangaki yango, na nsima alobaki na bango, : Nani nakati na bino azali Muhammad? Mosakoli, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, azalaki kofanda na kati ya bato, yango wana tolobaki: Ezalaki mobali oyo ya pembe afandi awa, Mobali wana alobaki na ye : O Ibn Abdul Muttalib? Mosakoli, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobaki na ye: “Nayanoli yo.”Mobali wana alobaki na Prophète (s.a.w) : Nazali kotuna yo, motuna ya makasi, yango wana kosilikela ngai te na motema na yo. Alobaki: “Senga nyonso oyo olingi Alobi: Nazali kotuna yo na nzela ya Nkolo na yo mpe na nzela ya Nkolo ya baye bazalaki liboso na yo, Nzambe atindaki yo epai ya bato nyonso? Alobaki boye:“ Allâhuma nam, yasolo” Alobi: Nalapeli yo na kombo ya Nzambe. biso tosambelaka losambo mitano na mukolo nzambe nde atindakiyo nayango? Alobaki: "Allâhuma nam, yasolo,". Alobi: Nalapi yo na kombo ya Nzambe. yasolo nzambe nde atindakiyo biso tokangaka sanza oyo na mbula nyonso? Alobaki: "Allâhuma nam, yasolo". Alobi: Nalapeli yo na kombo ya Nzambe, yasolo nzambe nde atindakiyo ozua mosolo (swadaka) na bato ya mbongo kati na biso opesa bazangi? olobaki: " Allâhuma nam, Yasolo". Mobali wana alobaki: Nandimi oyo oyaki na yango, pe nazali motindami ya bato na ngai sima na ngai, mpe nazali Dhwimaam bin Thalabah, ndeko ya Banu Saad bin Bakr.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim