Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

44 of 108 cards

Clear filters
“Est-ce que ekoki kosalema hadith na ngayi ekomeli mutu, ntango oyo ye avandi na trône naye? alobaki lisusu : Kati na biso na bino ezali na Buku ya Nzambe, oyo tokokuta halali to tie yango halali, na oyo tokokuta ezali haramu to tie yango haramu, na oyo ntoma ya nzambe (s.a.w) apekisaki ezali oyo nzambe apekisaki yango".
Yasolo Elobami na Abu Dawud, Al-Tirmidhi mpe Ibn Majah.
“Ee Nzambe, kosala lilita na ngai ezala ekeko te, Nzambe asili kolakela mabe na bato oyo bazali kozwa malita ya basakoli na bango lokola bisika ya losambo”.
Yasolo Elobami na Ahmed
“Moto na bino ezali eteni moko ya biteni ntuku nsambo (70) ya moto ya Lifelo”, elobamaki: O Motindami ya Nzambe, soki ekoki. Alobaki boye: “Bapesaki ye biteni ntuku motoba na libwa (69), nyonso ekokani Lolenge moko ya mulunge”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Moko ya bilembo ya ngonga ya nsuka, ezali ete boyebi ekolongwa, kozanga boyebi ekobakisama, ekobo ekobakisama, masanga ekobakisama, mibali bako Sila, mpe basi bakobakisama kino... Mpo na basi ntuku mitano bakozala na mobali moko”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobaki ete: Nazali riche koleka ba partenaires ya bosangisi, na oyo asali mosala asangisi ngai, nakotikaye na bosangisi naye".
Yasolo Elobami na Muslim
“Ya solo Allah atalaka te na bilongi pe na bozwi na bino, kasi (Allah) azalaka nde kotala na mitema pe na misala na bino".
Yasolo Elobami na Muslim
“Moto oyo alapi ndai na nkombo mosusu oyo ezali ya nzambe te, andimi te to asali banzambe mingi.”
Yasolo Elobami na Abu Dawud na Al-Tirmidhi na Ahmed.
“Bato - ya ngonga - na ngai nyonso bako kota na Paradizo longola se oyo aboyi” - Bayekoli - batunaki : Ee Motindami ya Allah ! Boye nani akoboya? Ayanolaki na bango na koloba ete: “Moto oyo akotosa ngai akokota na Paradizo, mpe oyo akozanga botosi ngai yende asili koboya”.
Yasolo Elobami na Al bukhari