Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

20 of 108 cards

Clear filters
“Nakozala na Mai ya haudu kino nakomona nani kati na bino akozongela ngai, mpe bato bakokangama na ndima ngai, Bongo nakoloba: Ee Nkolo, mpo na ngai mpe mpo na ekolo na ngai, mpe ekolobama ete: Omonaki oyo basalaki nsima na yo? Na Nzambe, bazali kokoba kozonga nsima na ba etumbu na bango”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Satana akoyelaka moko na bino mpe alobi ete: Nani akelaki boye mpe boye? Nani akelaki boye na boye? Kino akoloba: Nani akela Nkolo na yo? Na yango, ntango akokóma na esika yango, tiká aluka ekimelo epai ya Nzambe mpe azala na motema yako silisa ye”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Bótalela ngai te ndenge baklisto batalelaki mwana ya Maria; Mpo nazali kaka mosaleli ya nzambe, yango wana balobaki: Mosaleli ya Nzambe mpe Motindami na Ye.”
Yasolo Elobami na Al bukhari
Anas bin Malik, Nzambe asepela na ye, alobelaki na biso ete mutu moko alobaki: O Ntoma ya Nzambe, ndenge nini mutu oyo azali kondima te akoki kotabwisama na elongi na ye? Alobaki: « oyo asalaki ye atambola na makolo mibale na mokili oyo azali na makoki te ya kosala ete atambola na elongi na ye na Mokolo ya Lisekwa?” Qatada alobaki: yasolo, na nguya ya Nkolo na biso.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
Ntoma ya Nzambe, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobaki na Muadh bin Jabal, tango atindaki ye na Yemen: Ya solo, okokomela peuple oyo bazali Bato ya Buku, Na yango tango okoya epayi na bango, benga bango mpo na ba témoigner que nzambe mosusu azali te kaka Allah, pe Muhammad azali Messanger ya Nzambe,Soki batosi yo na likambo yango, yebisa bango ete Nzambe apesi bango mitindo ete básala mabondeli mitano butu na moi, Soki batosi yo na likambo yango, Donc yebisa bango que Nzambe a imposer bango zakat, oyo ezuamaka na ba riches na bango pe bapesaka na ba pauvre na bango, Soki batosi yo na likambo yango, kebá na motuya monene ya bozwi na bango, Mpe obanga dua libondeli ya baye bamonili bango, Mpo na ezipeli ezali te kati na yango ná Nzambe.”
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
Nalobaki: O Motindami ya Nzambe, omoni makambo oyo Na ntango ya liboso ya Islam, nazalaki kosalela yango lokola mosala ya malamu kokaba, kotikela baumbu oyo bazwaki bonsomi, na kotangisa bondeko, mpona yango naza nabolamu? Na sima Prophète, Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia, alobi: «okoti na Islam na bolamu oyo elekaki”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Moto na bino ezali eteni moko ya biteni ntuku nsambo (70) ya moto ya Lifelo”, elobamaki: O Motindami ya Nzambe, soki ekoki. Alobaki boye: “Bapesaki ye biteni ntuku motoba na libwa (69), nyonso ekokani Lolenge moko ya mulunge”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Moko ya bilembo ya ngonga ya nsuka, ezali ete boyebi ekolongwa, kozanga boyebi ekobakisama, ekobo ekobakisama, masanga ekobakisama, mibali bako Sila, mpe basi bakobakisama kino... Mpo na basi ntuku mitano bakozala na mobali moko”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim