Skip to content
108 Hadiths

Encyclopedia of Prophetic Hadiths

Filter results

4 of 108 cards

Clear filters
Motindami ya Nzambe (s.a.w) atangaka verset oyo: {Ye nde akitiseli yo buku kati na yango ezali na mikapo mia polele ya mibeko, mikapo wana nde mizali misisa ya buku, mpe mikapo misusu mizali na bokokani kati na yango. Na yango bato baye bazali na bokono ya libungi o mitema mia bango, bazali sé kolanda mikapo miye mikokana mpona koluka bomekano to mpe koluka ndimbola na yango, kasi moto moko te ayebi ndimbola na yango, sé ye moko Allah. Nzoka nde, banganga Nzambe (Allah) baye batonda mayele balobaka ete: Biso tondimi na yango. Nyoso ewuti epai na Nkolo na biso, sé bato baye bazali na mayele nde bazali kokanisa mpe kondima na yango} .[Al Imran: 7] na likambo yango. Alobaki: Ntoma ya Nzambe, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobi: «Bongo soki bomoni baoyo bazali kolanda likambo oyo ekokani na yango, boye wana nde Nzambe apesi bango nkombo, yango wana keba na bango”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Ngonga ekoya te kino moi ekobima na westi, yango wana ntango ekobima mpe bato bakomona yango, bango nyonso bakondima, mpe yango ekozala ntango oyo: {Molimo moko te ekozwa litomba na bondimi na yango soki endimaki liboso te, to ezwaki bolamu moko te na nzela ya bondimi na yango} [Al-An'am: 158]. Mpe Ngonga ekoya ntango bato mibale bakotanda elamba na bango kati na bango, mpo ete bakoteka yango te, mpe bakokanga yango te. Mpe Ngonga ekoya ntango moto akolemba na miliki ya ngombe na ye, kasi akoleisa yango te. Mpe Ngonga ekoya ntango akotondisa saani na ye mpe akosopa mai na kati na yango te. Mpe Ngonga ekoya ntango moko na bino akomema bilei na ye na monoko na ye mpe akolya yango te”.
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim
“Ya Abal Mundhir, oyebi verset nini uta na Buku ya Nzambe oyo ezali elongo na yo ezali monene koleka?” Alobi: Nalobaki: Nzambe na Ntoma na Ye bayebi malamu koleka. Alobaki: “ya Aba Mundhir, oyebi verse nini uta na Buku ya Nzambe oyo ozali kosimba, ezali monene koleka?” Alobi: Nalobaki: { Allâahu lâa ilâaha illâ huwa-l-hayyu-l-qayyûum} [Al-Baqarah: 255]. Alobi: Abetaki ngai na ntolo mpe alobaki: “Na Nzambe, tika ete opambolama na boyebi,ya abal Mundhir”.
Yasolo Elobami na Muslim
"Liwa ekomemama lokola nyama ya Bien, mpe mobeleli ako belela: O bato ya Paradis, bakobaluka na kotala, mpe ekolobama na bango : boyebi Oyo? bango bakoyanola: oui, oyo ezali liwa, na bango nyonso bakomona yango, nsima akobelela: O bato ya lifelo, bongo bakobaluka na kotala, ekolobama na bango: boyebi oyo ? bakoyanola: oui, oyo ezali liwa, na bango nyonso bakomona, akokatama Kingo, na nsima akobelela: O bato ya Paradis, botikala pona seko liwa eza te, mpe bino bato ya lifelo botikala pona seko liwa eza te, nsima atangaki: {Mpe kebisa bango na Mokolo ya mawa ntango likambo esili kokatama ntango bazali na bozangi bokebi} [Maryam: 39], mpe baye bazali bato ya mokili oyo na bozangi bokebi {mpe bango bazali bandimi te} [Maryam: 39]».
Yasolo Elobami na Al-Bukhari na Muslim